10 Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito ; nakosala ete ovanda lisusu na se ya bandako ya kapo lokola na mikolo ya bafeti na yo, oyo ekatama.
Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa.
Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango.
Azongisaki : — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai.
Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »
Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
Yawe alobaki na ngai : — Kende, linga mwasi mosusu oyo azali mwasi ya mobali mosusu to mpe azali mwasi ya ekobo. Linga ye ndenge Yawe alingaka bana ya Isalaele, ata soki basambelaka banzambe mosusu mpe baliaka bagato basala na bambuma ya vino ebulisama !
alobaki : — Boyoka maloba na Ngai ! Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, namimonisaka Ngai moko epai na ye na nzela ya bimoniseli, nalobaka na ye na nzela ya bandoto.
« Na mikolo ya suka, elobaki Nzambe, nakosopa Molimo na Ngai kati na bato nyonso. Bana na bino ya mibali mpe ya basi bakosakola ; bilenge na bino bakozwa bimoniseli, mibange na bino bakolota bandoto.
Boni, nasengeli komikumisa ? Te, ezali na tina te ! Kasi tika nayebisa bino makambo oyo namonaki lokola na ndoto, mpe bimoniseli oyo Nkolo alakisaki ngai.
Kutu, mpo ete namitondisa na lofundu te na tina na bimoniseli ya kokamwa oyo nazwaki, batiaki ngai nzube moko kati na nzoto, anjelu ya Satana mpo na konyokola ngai.