Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 12:1 - Mokanda na Bomoi

1 Efrayimi azingeli Ngai na lokuta, mpe libota ya Isalaele, na kokosa ; kasi Yuda azali nanu kotambola elongo na Nzambe, elongo na Mosantu ya solo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 12:1
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene.


Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye.


Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda ; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda.


« Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto oyo ewutaka na Este ?


Kasi bazalaki koloba lokuta, minoko na bango ezalaki kokosa Ye ;


Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ? Okosambwa mpo na Ejipito ndenge osambwaki mpo na Asiri.


Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. Okoyoka soni mpe okosambwa likolo ya mabe na yo nyonso.


Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. ›


Tokomi ata kobondela bato ya Ejipito mpe ya Asiri mpo ete bapesa biso bilei.


Ata soki bakei kolona yango esika mosusu, okanisi ete ekokola ? Ekokawuka nyonso tango mopepe ya este ekoya kobeta yango ; solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › »


Nakosala te kolanda kanda na Ngai ya makasi, nakobebisa lisusu Efrayimi te. Pamba te Ngai, nazali Nzambe, nazali moto te ! Nazali Mosantu, Ngai oyo nazali kati na bino ; nakoya lisusu na kanda te.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.


Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.


Tango kaka nalingaki kobikisa Isalaele, masumu ya Efrayimi mpe mabe ya Samari ebimaki na pwasa, mpo ete batambolaki na lokuta ; miyibi babukaki bandako mpe bato mabe babotolaki bato biloko kati na babalabala.


Efrayimi akomi lokola ebenga oyo ekosamaka na bopete mpe ezangi mayele : azali kosenga lisungi epai ya Ejipito, kasi azali mpe kokende na Asiri.


« Lokola baloni mopepe, bakobuka mopepe ya makasi. Nzete ya ble oyo ezanga moto ebimisaka farine te. Ezala soki ebimisi mito, ezali bapaya nde bakolia yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ