Oze 11:8 - Mokanda na Bomoi8 Efrayimi, ekobanda ndenge nini nasundola yo ? Isalaele, ndenge nini natika yo okende kaka boye ? Mpo na nini nasala yo makambo oyo nasalaka engumba ya Adima ? Okanisi ete Ngai nakoki penza kokomisa yo lokola engumba ya Tseboyimi ? Motema na Ngai ebaluki kati na Ngai mpe natondi na mawa makasi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo.
Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo.
Yango wana, na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, « Moabi ekokoma penza lokola Sodome, mpe bato ya Amoni bakokoma lokola Gomore ; ekokoma esika oyo ebotaka matiti mabe, esika ya mabulu ya mungwa, esika ebebisama mpo na libela. Batikali na Ngai bakobotola bango bomengo na makasi, mpe batikali ya ekolo na Ngai bakozwa mikili yango lokola libula. »