Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 11:4 - Mokanda na Bomoi

4 Natambolisaki bango na motema ya esengo mpe ya bolingo ; nalongolaki bango ekangiseli na bakingo mpe namikitisaki mpo na koleisa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 11:4
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye.


Ndenge kaka basengaki, atindelaki bango bakayi mpe atondisaki bango na bilei ya likolo.


Moyize alobaki : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. »


Tokende na yo elongo, tokima mbangu ! Mokonzi akotisi ngai na bashambre na ye ! Tovanda elongo na esengo mpe tosepela na tina na yo, tosanzola bolingo na yo, oyo eleki vino ya kitoko na elengi. Solo, ezali na pamba te nde basi balulaka yo !


Tango nyonso bazalaki na pasi, Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye abikisaki bango ; asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, akongolaki bango mpe azalaki komema bango mikolo nyonso ya tango ya kala.


Yango wana, nakokangela ye nzela na banzube, nakotongela ye mir mpo ete akoka lisusu komona nzela te.


Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi.


Mpe tango bakotombola Ngai longwa na mabele, nakobenda bato nyonso epai na Ngai.


Solo, bolingo ya Klisto ekangi biso, pamba te tondimisamaki ete moko kaka akufa mpo na bato nyonso ; boye elingi koloba ete bato nyonso bakufa kati na ye.


Ye moko Yawe akambaki bango ; nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye.


miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ