Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa.
Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.
Ezala mpo na masumu na bino to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, « pamba te babonzaki malasi ya ansa na likolo ya bangomba milayi mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ; solo penza, nakozongisela bango mabe, nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! »
— Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ?
Bato na Ngai batingami kaka kopesa Ngai mokongo. Ata babengi bango ete bakende epai na Ye-Oyo-Aleki-Likolo, moko te kati na bango azali kopesa Ye lokumu.
kobonza bambeka na likolo ya bangomba milayi, kotumba ansa lokola mbeka ya malasi na likolo ya bangomba mikuse, na se ya banzete minene oyo epesaka pio ya kitoko lokola sheni, pepiliye mpe terebente ! Mpo na yango, bana na bino ya basi bakosala kindumba, mpe basi ya bana na bino bakosala ekobo.
Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe.
Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.
Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te.