Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 11:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bakolanda Yawe ! Yawe akoganga lokola nkosi. Tango akoganga, bana na Ye bakoya na kolenga wuta na weste.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 11:10
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga mpe ezali kobeta makasi lokola nde elingi kobima na esika na yango.


Nalengaka na somo liboso na Yo mpe nabangaka mikano na Yo.


Bosalela Yawe na kobanga mpe bosepela na kolenga.


Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.


Oh ndako ya Jakobi, yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe !


Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka liboso ya mosuni na yango, ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani mpo na kotelemela yango, ezalaka na somo ya makelele na bango te mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke mpo na kobunda.


Yawe akobima lokola elombe, akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; akoganga, solo ; akoganga makasi, mpe akolonga banguna na Ye.


Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; molunge ya esobe to moyi makasi ekomonisa bango pasi te, pamba te Ye oyo alingaka bango akolakisa bango nzela mpe akomema bango pene ya miluka.


Pamba te tango osalaki makambo ya somo oyo biso tozalaki kozela te, okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo.


Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » elobi Yawe. « Tala moto oyo Ngai nakotala : moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai.


Boyoka Liloba na Yawe, bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : « Bandeko na bino oyo bayina bino mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › Kasi bango nde bakosambwa solo.


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, azali kotomboka lokola kake wuta na Esika na Ye ya bule, azali konguluma makasi mpo na kotelemela mokili na Ye ! Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo !


Bakendeki na kolela, kasi nakozongisa bango, wana bakozala kati na kobondela ; nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; pamba te nazali Tata ya Isalaele, mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Bokoki penza kobanga Ngai te, » elobi Yawe ? « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te.


Na tango wana, na mikolo wana, » elobi Yawe, « bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolela mpo na koluka Yawe, Nzambe na bango.


soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi,


Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ;


Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele ; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo.


Sima na yango, bana ya Isalaele bakozongela mpe bakoluka Yawe, Nzambe na bango, mpe Davidi, mokonzi na bango ; bakobelema epai na Yawe, na kolenga nyonso, mpo na kozwa mapamboli na Ye, na mikolo oyo ekolanda.


Alobaki : Yawe azali koganga wuta na Siona, mpe azali koloba wuta na Yelusalemi, na mongongo makasi lokola kake. Matiti ya bitando epai wapi babateli bibwele baleisaka bibwele ekokawuka, mpe songe ya ngomba Karimeli ekokawuka.


Nkosi ekoki solo koganga na zamba soki emoni te nyama ya kolia ? Mwana nkosi ekoki penza konguluma na esika oyo evandaka soki ekangi nyama te ?


Nkosi egangi ; nani akobanga te ? Nkolo Yawe alobi ; nani akoki koboya kosakola ?


Ekolo na ekolo ekotambola na kombo ya nzambe na yango, kasi biso tokotambola na Kombo na Yawe oyo azali Nzambe na biso, mpo na libela.


Tango nayokaki sango oyo, motema na ngai ekomaki kobeta makasi, bibebu na ngai ekomaki kolenga, mikuwa na ngai ekomaki kopola mpe makolo na ngai ekomaki kolenga. Kasi nakokanga motema na ngai mpo na kozela mokolo ya pasi oyo ekokomela ekolo oyo ebundisaki biso.


Nakozongisa bango wuta na Ejipito ; nakosangisa bango wuta na Asiri ; nakomema bango na Galadi mpe na Libani ; kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango.


Nakosala ete balendisama kati na Yawe : bakotambola na Kombo na Ye, » elobi Yawe.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste.


Yesu alobaki lisusu na bato : — Nazali pole ya mokili ; moto nyonso oyo alandaka Ngai akotikala kotambola kati na molili te, kasi akozwa pole ya bomoi.


Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye : — Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.


Yango wana sik’oyo, etumbu ezali lisusu te mpo na bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto.


Akopesa mingi-mingi etumbu epai ya ba-oyo, mpo na lokoso na bango ya makambo ya mbindo, batambolaka kolanda baposa mabe ya nzoto mpe batiolaka bokonzi ya Nkolo. Lokola bateyi yango ya lokuta batondi na lolendo mpe bamimonaka lokola bakoka na nyonso, babangaka te kofinga bikelamu ya nkembo ;


bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ