Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 11:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 11:1
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Wuta bolenge na ngai, banyokoli ngai bambala ebele. Tika ete Isalaele ezongela koloba :


« Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai.


Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali.


Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › »


Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, lokola nalingaka yo, nakokaba bato mosusu na esika na yo, mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo.


Nakobosana libota na ngai, nakosundola libula na ngai, nakokaba molingami na ngai na maboko ya banguna na ye.


« Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakanisi lisusu bolingo oyo ozalaki na yango epai na Ngai tango ozalaki elenge ; ozalaki kolinga Ngai makasi ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, kati na mokili oyo ekawuka.


Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo : tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo.


Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’


Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.


Jakobi akimaki na mokili ya Siri ; Isalaele asalaki mosala mpo na kozwa mwasi ; mpe mpo na kobala mwasi yango, andimaki kokoma mobateli bibwele.


Efrayimi alobaka na lolendo nyonso : « Ngai nazali mozwi, nakomi na bozwi mingi. Na mosala na Ngai nyonso, bakotikala komona Ngai na mbeba ata moko te oyo bakoki kobenga lisumu. »


« Nzokande Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na Ejipito. Oyebi Nzambe mosusu te libanda na Ngai, ozali na mobikisi mosusu te.


Nakopesa ye etumbu mpo na mikolo nyonso oyo atumbelaki nzambe ya Bala malasi ya ansa. Azalaki kolata babiju mpe mayaka ya talo mpo na kokende epai ya bamakangu na ye ; kasi ngai, abosanaki Ngai, elobi Yawe.


« Ngai, nalingaki bino, » elobi Yawe, « kasi bino bozali kotuna Ngai : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? › Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? » elobi Yawe, « Nzokande, nalingaki Jakobi,


epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama : « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. »


Solo, olingaka bato, basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya.


Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ