Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari.
Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ?
Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi.
Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko.