Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 10:6 - Mokanda na Bomoi

6 Bakomema ekeko ya mwana ngombe yango na Asiri lokola likabo mpo na mokonzi monene. Efrayimi akoyoka soni, mpe Isalaele akosambwa mpo na mabongisi oyo basalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 10:6
22 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari.


Makasi ya matambe na ye esilaka, makanisi na ye moko ekweyisaka ye.


« Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente oyo bozalaki kolinga mingi ; bokoyoka pasi na mitema mpo na bilanga oyo boponaki ;


Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela ekokomela bino soni, mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi.


Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko bakoyoka soni mpe bakosambwa ; bango nyonso, bakokende na soni.


Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni tango batiaki mitema na Beteli.


Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka.


Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.


Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele.


Akozwa banzambe na bango ya bikeko, bikeko na bango oyo basala na bibende, biloko na bango ya motuya oyo basala na wolo mpe na palata mpe akomema yango na Ejipito. Akozala mosika ya mokonzi ya nor na mwa mibu.


Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.


Ndenge Banganga-Nzambe bakomaki ebele, ndenge wana mpe basalaki masumu na miso na Ngai. Nakobongola nkembo na bango soni.


Tango Efrayimi amonaki bokono na ye, mpe Yuda amonaki bapota na ye, Efrayimi abalukaki na ngambo ya Asiri mpe atindaki sango epai ya mokonzi monene mpo na kozwa lisungi, kasi ye akokoka kobikisa mpe kosilisa bapota na yo te.


Ewuti na Isalaele ! Ekeko wana ya mwana ngombe ya mobali, ezali monyangwisi bibende na moto nde asala yango ; ezali Nzambe te. Bakobuka yango biteni-biteni, mwana ngombe wana ya Samari.


Lokola obatelaki malako ya Omiri mpe osalaki misala nyonso ya mabe ya ndako ya Akabi, nakokaba yo mpo ete obebisama, nakokaba bato na yo mpo ete batiolama ; bongo bokolata soni ya libota na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ