Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.
Boni, bampunda ekimaka penza mbangu na nzela oyo etonda na mabanga ? Ngombe ebalolaka penza mabele na bisika ya ndenge wana ? Kasi bino bokomisi bosembo ngenge, mpe mbuma ya bosembo bololo.
Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye.
Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango.
Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? ›
Bosenzelaka ete moto moko te azanga ngolu ya Nzambe ; bosenzelaka mpe ete mosisa moko te ya bololo ebotama mpo na kokotisa mobulu mpe kobebisa bomoi ya bato ebele kati na bino.