Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko.
Mawa na bato oyo balobaka : « Tika ete Nzambe asala noki, tika ete asala na lombangu mosala na Ye mpo ete tomona yango ! Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama mpo ete tokoka koyeba yango ! »
Wapi mokonzi na yo mpo ete abikisa yo ? Wapi bakambi na yo kati na bingumba na bino nyonso oyo, na tina na bango, bozalaki koloba : ‹ Bopesa biso mokonzi mpe moyangeli ? ›
Sik’oyo, mpo na nini ozali koganga ? Boni, ozali lisusu na mokonzi te ? Boni, mopesi toli na yo asili kokufa mpo ete pasi ekanga yo lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ?
Kasi babandaki koganga : — Boma ye ! Boma ye ! Baka ye na ekulusu ! Pilato alobaki na bango lisusu : — Nasengeli penza kobaka mokonzi na bino na ekulusu ? Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazongisaki : — Tozali kaka na Sezare lokola mokonzi, mokonzi mosusu azali te !