Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 10:15 - Mokanda na Bomoi

15 Beteli, makambo oyo ekokomela yo mpo ete mabe na yo eleki ndelo. Tango mokolo yango ekokoka, mokonzi ya Isalaele akozala lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 10:15
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Yawe alobi sik’oyo boye : « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. »


Yango wana, lokito ya bitumba ekoyokana kati na yo, bandako na yo nyonso oyo batonga makasi ekobebisama ; ndenge Salimani abebisaki Beti-Aribeli na mokolo ya bitumba, tango bamama mpe bana na bango bakweyaki na mabele.


Boye bakoloba : « Tozali na mokonzi te, pamba te totosaki Yawe te. Ata tozalaki na mokonzi, akokaki kosala nini mpo na biso ? »


Bavandi ya Samari bazali kolenga mpo na mwana ngombe ya mwasi ya Beti-Aveni ; bato na yango mpe Banganga-Nzambe oyo bagumbamelaka ekeko ya mwana ngombe bakosala matanga na tina na yango. Tika ete basepela lelo mpo ete nkembo ya mwana ngombe elongwe kati na bango.


Mokili ya Samari mpe mokonzi na yango bakotiola likolo ya mayi lokola mwa eteni ya nzete ya kokawuka.


Tango Isalaele azalaki nanu elenge, nalingaki ye, mpe nabengaki mwana na ngai libanda ya Ejipito.


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ