Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Oze 10:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nakopesa bango etumbu ndenge nalingi ; bato ya bikolo ya bapaya bakosalela bango likita mpe bakokanga bango minyololo likolo ya masumu mibale oyo basalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Oze 10:10
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato : — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito.


Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ? Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele ?


Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Elombe ya Isalaele alobi : Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ; mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai !


Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, « opesaki Ngai mokongo. Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, mpe nakobebisa yo ; nakoyokela yo lisusu mawa te.


Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga.


‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo.


nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso.


Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila ; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te.


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi !


Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela.


Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai.


Isalaele, osalaki masumu wuta na mokolo ya Gibea mpe obongwani te. Boni, bitumba ekomeli bato mabe ya Gibea te ?


Mopepe moko ya makasi ekomema bango, mpe bakoyoka soni mpo na bambeka na bango.


Makambo oyo ekokomela bato yango ekokomela mpe Banganga-Nzambe : nakopesa bango nyonso etumbu nzela moko mpo na etamboli na bango mpe nakofuta bango kolanda misala na bango.


Tia kelelo na monoko na yo ! Lokola mpongo, pasi ekokitela Ndako ya Yawe, mpo ete babebisi boyokani na Ngai mpe batombokeli Mobeko na Ngai.


Ata apesaki bakado kati na bikolo, sik’oyo Ngai nakosangisa bango esika moko mpe bakobanda kosila kokufa na se ya minyoko ya mokonzi moko ya nguya.


Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.


Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ