Gomeri akomaki lisusu na zemi mpe abotaki mwana mwasi. Yawe alobaki na Oze : — Pesa ye kombo Lo-Rukama, pamba te nakotalisa lisusu bolingo na Ngai te epai ya libota ya Isalaele mpe nakolimbisa bango te.
Kasi nakotalisa bolamu na Ngai epai ya libota ya Yuda mpe nakobikisa bango. Ngai moko Yawe, Nzambe na bango, nde nakosala bongo ; ekozala na nguya ya tolotolo te, ya mopanga te, ya bitumba te, ya bampunda te to mpe ya bashar te.