Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 9:37 - Mokanda na Bomoi

37 Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 9:37
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita.


Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe : ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te.


Bosengeli lisusu koyeba ete bozali lisusu na ndingisa te ya kosenga na Nganga-Nzambe nyonso, Molevi nyonso, moyembi nyonso, mokengeli nyonso ya ekuke, mosali nyonso ya Tempelo, mpe na mosali nyonso mosusu ya Ndako ya Nzambe ete afuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela.


Nalobaki na bango : — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa.


Banguna na biso bazali kolanda biso, bakomi na sima ya mokongo ; bongo biso tolembi nzoto, tozangi kimia.


Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.


Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?


Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso.


Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango.


tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino.


Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ