Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 9:34 - Mokanda na Bomoi

34 Bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 9:34
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. »


Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala.


Batata na biso bazangaki boyengebene, basalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe basundolaki Ye ; batikaki Tempelo ya Yawe mpe bapesaki Ye mokongo.


Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema ? Pamba te tobateli te mibeko na Yo,


Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya.


Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.


Ezala wana bazalaki kati na mokili na bango, wana bazalaki kosepela mpo na bolamu oyo ozalaki kotalisa bango kati na mokili monene oyo mabele na yango ebotaka malamu, basalelaki Yo te mpe batikaki te banzela mabe na bango.


Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe.


Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te.


Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. ›


Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai.


Toyokelaki te basali na Yo, basakoli, oyo balobaki na Kombo na Yo epai ya bakonzi na biso, bakambi na biso, bakoko na biso mpe epai ya bato nyonso ya mokili.


Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ