Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 9:33 - Mokanda na Bomoi

33 Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 9:33
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Solo, tosalaki masumu lokola batata na biso, tosalaki mabe mpe tomemaki ngambo.


Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ?


Yawe azali sembo ; nzokande, ezali ngai nde natombokelaki mitindo na Ye. Boyoka, bino bikolo nyonso, mpe botala pasi na ngai ! Bana na ngai ya basi mpe ya mibali bakei na bowumbu.


Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna na tina na oyo etali bosembo na Yo. Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te bazalaka na bomoi ya kimia ?


Yawe azali sembo na nyonso oyo asalaka mpe atonda na bolingo kati na misala na Ye nyonso.


Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima ;


Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama.


Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te.


Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! »


Bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango.


likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino.


Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki : — Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo.


Omonaki ete motema na ye ezali na boyengebene epai na Yo mpe osalaki boyokani elongo na ye mpo na kopesa na bakitani na ye mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Perizi, ya bato ya Yebusi mpe ya bato ya Girigazi. Okokisaki elaka na Yo, pamba te ozali Sembo.


Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ