Neyemi 9:31 - Mokanda na Bomoi31 Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te,