Neyemi 9:24 - Mokanda na Bomoi24 Bana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna ; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo.