22 Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani.
Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi.
Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango ; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso.
Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga.
Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi.
mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito.
Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga.