Neyemi 9:17 - Mokanda na Bomoi17 Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi : bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi.