Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 9:13 - Mokanda na Bomoi

13 Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 9:13
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te,


alongwaki na Babiloni. Esidrasi yango azalaki molakisi malamu ya mibeko mpe ayebaki penza malamu Mobeko ya Moyize oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki na bato na Ye. Bongo lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ye, ezalaki likolo na ye, mokonzi apesaki ye biloko nyonso oyo asengaki.


Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima ;


Moboko ya liloba na Yo ezali bosolo, mpe mibeko nyonso ya bosembo na Yo ezali mpo na libela.


Moyize alobaki na bango : — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. »


bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele.


Yawe alobaki na Moyize : — Yebisa makambo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Bomonaki bino moko ndenge nini nalobelaki bino wuta na likolo.


Ndenge moto etumbaka matiti mpe etokisaka mayi na nzungu, kita mpo na kosala ete banguna na Yo bayeba Kombo na Yo mpe bikolo eningana liboso na Yo !


Wuta na tango ya kala penza, moto moko te atikala kososola, litoyi moko te etikala koyoka, liso moko te etikala komona, ete nzambe moko, longola kaka Yo, asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye.


Nzambe abimelaki na engumba Temani, Mosantu abimelaki na ngomba Parani. Nkembo na Ye ezipaki likolo, mpe lokumu na Ye etondisaki mabele.


Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu.


Alobaki : « Yawe awutaki na Sinai ; wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko.


Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi ?


Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto.


Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino ?


Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ