Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 9:12 - Mokanda na Bomoi

12 Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 9:12
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda.


Atandaki lipata mpo na kobatela bango, mpe moto mpo na kopesa pole na butu.


Atambolisaki bango na nzela ya alima mpo ete bakende kovanda kati na engumba.


Na tongo makasi, sala ete nayoka boboto na Yo, pamba te natia elikya na ngai kati na Yo. Lakisa ngai nzela ya kolanda, pamba te napesi bomoi na ngai epai na Yo.


Na moyi, azalaki kotambolisa bango na nzela ya lipata ; mpe na butu, na nzela ya pole ya moto.


Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule.


Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko.


Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana : lipata ezalaki kozipa Mongombo ; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto.


Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo ; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko ; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende.


oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ