Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 8:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 8:9
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye


Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe.


Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko.


Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango.


Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye,


— Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda ; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo.


Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba : — Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki ; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye.


Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi.


Tala mokanda oyo mokonzi Aritakizerisesi apesaki epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, oyo ayebaki penza malamu makambo oyo etali mitindo mpe bikateli ya Yawe mpo na Isalaele :


Mpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda ; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango.


Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe.


Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi.


Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale.


Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola.


tango ya kolela mpe tango ya koseka, tango ya kosala matanga mpe tango ya kobina ;


komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga mitole na esika ya putulu, mafuta ya esengo na esika ya matanga, mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, mpo na komonisa nkembo na Ye.


Bato na Ngai bakobebisama mpo ete bazangi boyebi. Lokola bobwaki boyebi, Ngai mpe nakobwaka bino mpe nakolongola bino na bonganga-Nzambe na Ngai. Lokola bobosani Mobeko ya Nzambe na bino, Ngai mpe nakobosana bana na bino.


« Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai.


Tala makambo mosusu oyo bosalaka : bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino.


Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.


Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi ; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.


Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino.


Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino.


Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo.


Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai.


Botala pasi na bino, bosala matanga mpe bolela. Tika ete koseka na bino ebongwana kolela, mpe esengo na bino ekoma mawa !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ