Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 8:8 - Mokanda na Bomoi

8 Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 8:8
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe basakoli, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na se kino na oyo aleki na lokumu. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe.


Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso.


Bato nyonso bakendeki kolia mpe komela, kotinda ndambo ya bilei epai ya bato oyo bazangaki eloko ya kolamba mpe kosepela na esengo makasi, pamba te basosolaki maloba oyo balimbolelaki bango.


Sima, batelemaki ; mpe Balevi oyo : Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema.


Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela !


Batelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato ; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango.


Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango.


Yawe ayanolaki : — Koma emoniseli oyo, koma yango na etando ya mabanga, koma yango penza malamu mpo ete moto nyonso akoka kotanga yango na bopete.


Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso.


Batunanaki : — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ?


Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi.


Bayokanaki kokutana na Polo mokolo mosusu. Bongo tango mokolo yango ekokaki, bayaki ebele na esika oyo Polo azalaki kovanda. Wuta na tongo kino na pokwa, Polo azalaki kolimbolela bango mpe koteya bango makambo oyo etali Bokonzi ya Nzambe, mpe azalaki kosala nyonso mpo ete bandima makambo oyo azalaki koloba na tina na Yesu, na nzela ya Mobeko ya Moyize mpe makomi ya basakoli.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ