Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 8:17 - Mokanda na Bomoi

17 Lisanga ya bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu batongaki bandako ya matiti mpe bavandaki kati na yango. Wuta na tango ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, kino na mokolo wana, bana ya Isalaele batikalaki lisusu te kosepela feti yango. Boye, mpo na libaku oyo, bazalaki na esengo makasi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 8:17
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Baliaki mpe bamelaki liboso ya Yawe na esengo na mokolo wana, mpe batatolaki mpo na mbala ya mibale ete Salomo, mwana mobali ya Davidi, azali mokonzi. Bapakolaki ye mafuta mpo ete azala mokonzi ; mpe Tsadoki, mpo ete azala Nganga-Nzambe.


Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi.


Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi.


Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo.


Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo.


Ye oyo azalaki Liloba akomaki moto mpe avandaki kati na biso, atonda na ngolu mpe na solo. Tomonaki nkembo na Ye, nkembo oyo azwi epai ya Tata na Ye, lokola Mwana se moko.


Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona ; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo ; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka.


Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.


Mpo na kondima, avandaki lokola mopaya kati na mokili oyo Nzambe alakaki ye ; azalaki kovanda na bandako ya kapo lokola Izaki mpe Jakobi oyo mpe bazwaki elaka ya ndenge moko na ye.


Pamba te, soki Jozue alonga penza kopesa bango bopemi, Nzambe alingaki lisusu te koloba na tina na mokolo mosusu.


Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ