Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 8:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete ; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 8:16
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.


Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka.


Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika.


Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo.


Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este.


na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko.


elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi.


Bato nyonso basanganaki lokola moto moko na libanda, liboso ya Ekuke ya Mayi. Balobaki na Esidrasi, molakisi ya Mobeko, ete abimisa buku ya Mobeko ya Moyize, oyo Yawe apesaki bana ya Isalaele.


Atangelaki bango buku yango na mongongo makasi, kobanda na tongo kino na pokwa, na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi. Bato nyonso bazalaki koyoka na bokebi botangi buku ya Mobeko.


Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › »


Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya.


Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ