7 bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :
Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. Tala motango ya bana ya Isalaele :
Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango.
Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;
Boye mokonzi atunaki ngai : — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? Nabangaki makasi ;
Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ;
Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo ; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale : lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu ; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango.
Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe :