Bato ya liboso kati na bana ya Isalaele oyo bazongaki lisusu kovanda na bingumba na bango, ezalaki : ndambo ya bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe basali ya Tempelo ya Yawe.
Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele :