32 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : nkama moko na tuku mibale na misato.
Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : nkama mibale na tuku mibale na misato.
Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike,
Bato ya mboka Mikimasi : nkama moko na tuku mibale na mibale.
Bato ya mboka Nebo mosusu : tuku mitano na mibale.
Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele.
Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele.