Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 7:1 - Mokanda na Bomoi

1 Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 7:1
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango : « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te ; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. »


Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe.


Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe.


Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso.


Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ;


Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa.


Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te,


Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli  ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.


Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ