Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 6:8 - Mokanda na Bomoi

8 Natindelaki ye eyano oyo : — Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 6:8
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda ! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango ! »


Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te.


Bamipesaka lokumu makasi, bandimaka te mpe bayinaka masumu na bango te.


Bato oyo balingaka ngai mpe baninga na ngai bakimi pasi na ngai, ba-oyo bazalaka na ngai esika moko batelemi mosika na ngai.


Eyembamaki tango Doegi, moto ya Edomi, akendeki koyebisa Saulo ete Davidi akoti na ndako ya Ayimeleki.


Moko te azali kofunda makambo na bosolo, moko te azali kosamba na bosembo ; bazali kotia mitema na makambo ezanga tina mpe bazali koloba lokuta ; na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe mpe bakokisaka yango na misala na bango.


Bakonzi oyo mibale, na mitema na bango ya mabe, bakovanda esika moko. Lokola batonda na mayele mabe, bakolobana lokuta kasi ekosimba te, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.


Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :


Ezali Satana nde azali tata na bino, mpe bolingi nde kaka kokokisa posa ya tata na bino. Wuta na ebandeli, ye azala mobomi ; avandaka kati na solo te, pamba te solo ezalaka te kati na ye. Tango akosaka, alobaka penza makambo oyo ewutaka kati na ye ; pamba te azali mokosi mpe tata ya lokuta.


Polo azongisaki : — Te, natelemi liboso ya esambiselo ya Sezare ; ezali awa nde nasengeli kosamba. Yo moko oyebi malamu ete nasali Bayuda ata likambo moko te ya mabe.


Tango kaka Polo akomaki wana, Bayuda oyo bawutaki na Yelusalemi bazingelaki ye mpe bakomaki kofunda ye na tina na makambo mingi ya mabe makasi, oyo bango moko bazangaki kutu makoki mpo na kotalisa bosolo na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ