3 Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo : — Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino ?
Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu : — Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu.
Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo : — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe.
Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko ; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko.
Moto oyo azangi mayele andimaka makambo nyonso oyo balobaka, kasi moto ya mayele atambolaka na bokebi.
Mosala nyonso oyo loboko na yo ekokoka kosala, sala yango na makasi na yo nyonso ; pamba te kati na mboka ya bakufi epai wapi okokende, ezala mosala, mabongisi, boyebi to bwanya ezalaka kuna te.
Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.
« Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »
Lokola moyi ezali, esengeli na Ngai kosala misala ya Ye oyo atindaki Ngai ; butu ezali koya, oyo moto ata moko te akokoka kosala mosala.