19 Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai.
Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.
Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia.
Soki kaka bozalaki ya mokili, mokili ekokaki kolinga bino lokola bato na yango penza. Nzokande, bozali ya mokili te, pamba te nasilaki kopona mpe kolongola bino na se ya bokonzi na yango mpo na kobulisa bino ; yango wana mokili ezali koyina bino.