Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai.
Liboso ya kozwa mokano yango, Nganga-Nzambe Eliashibi oyo azali na mokumba ya kobatela bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso mpe azali moto ya libota ya Tobiya
Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.
Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia.