Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 6:16 - Mokanda na Bomoi

16 Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 6:16
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.


Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi.


Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.


Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango.


Tika ete banguna na ngai bayeba ete Yo Yawe nde osalaki bongo.


Boye, tozalaki koganga mpe koyemba na esengo. Bongo, maloba oyo ekomaki kolobama kati na bikolo : « Yawe asaleli bango makambo minene ! »


Tika ete bato nyonso oyo bayinaka Siona bakufa soni mpe bazonga sima !


Yawe azali kotonga lisusu Yelusalemi epai wapi akosangisa bato ya Isalaele oyo bakenda na bowumbu.


Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso.


Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. ›


Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! ›


Yango wana, na likambo oyo, boyoka toli na ngai : Bokota lisusu makambo ya bato oyo te mpe botika bango bakende ! Pamba te soki makanisi to mosala na bango ewuti na moto, solo, ekosuka kaka na nzela.


Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele.


mpe alobaki na bango : — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino.


Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ