Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 6:13 - Mokanda na Bomoi

13 Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 6:13
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.


Kati na mokanda yango, bakomaki : « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango ;


Kokende sango ya malamu ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi ; lokumu ezali malamu koleka palata mpe wolo.


Moto oyo alobaka na moninga na ye maloba ya sukali atielaka ye motambo na se ya matambe.


Kokende sango ya malamu eleki malasi ya solo kitoko na motuya, mpe mokolo ya kufa eleki mokolo ya mbotama na malamu.


Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.


Ozalaki na somo ya nani to ozalaki kobanga nani mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi nde ozali kobanga Ngai te ?


Mibongisa, yika mpiko ! Telema mpe yebisa bango makambo nyonso oyo Ngai nakotinda yo ; kozala na somo na bango te, noki te nakokweyisa yo liboso na bango.


Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! »


Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! Bofunda ye ! Tofunda ye ! » Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! »


Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki.


Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.


Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko.


Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,


Kuna, babimisaki batatoli ya lokuta oyo balobaki : — Moto oyo azali kotika te koloba mabe mpo na kobebisa lokumu ya esika oyo ya bule mpe ya mibeko ;


Mpe nakokoba kosala oyo nazali kosala sik’oyo, mpo na kopekisa bato oyo bazali koluka nzela ya komikokanisa na biso kati na makambo oyo bazali komikumisa na yango.


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.


salela maloba ya kimia mpe ezanga pamela, mpo ete bato oyo batelemelaka yo bayoka soni mpe bazanga mabe ya koloba na tina na biso.


Moto oyo ayebi kosala bolamu, kasi asali yango te, asali masumu.


Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ