Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 6:10 - Mokanda na Bomoi

10 Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki : — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo ; bakoya na butu mpo na koboma yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 6:10
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi.


Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje.


Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili.


Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi.


Akazi asangisaki bisalelo nyonso ya Tempelo ya Nzambe mpe abukaki-bukaki yango. Akangaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe atongaki bitumbelo na babalabala nyonso ya Yelusalemi.


Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango.


Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule.


Kati na bakitani ya Arimi : Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni,


Boye nabengisaki Eliezeri, Arieli, Shemaya, Elinatani, Yaribi, Elinatani, Natan, Zakari mpe Meshulami oyo bazalaki bakambi ; Yoyaribi mpe Elinatani oyo bazalaki bato ya mayele.


Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka.


Yawe, sunga biso ! Pamba te bayengebene bazali lisusu te ; bato ya kotiela motema bazali lisusu te kati na bana na bato.


Bato mabe basalelaka bato ya sembo makita mpe baliaka minu mpo na kotelemela bango.


Moto ya mbindo abebisaka moninga na ye na maloba ya monoko na ye, kasi boyebi ekokangola bato ya sembo.


Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te.


Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai : « Kende komikangela kati na ndako na yo.


« Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino.


Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.


Moto nyonso oyo asalaka mabe ayinaka pole mpe apusanaka te epai pole ezali, noki te misala na ye ekomonana polele.


Mobulu makasi ekotaki kati na engumba mobimba, mpe ebele ya bato oyo bawutaki bipai na bipai bayaki na lombangu. Bakangaki Polo, babimisaki ye libanda ya Tempelo mpe, mbala moko, bakangaki bikuke na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ