Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 5:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nabakisaki : — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 5:9
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abrayami azongisaki : — Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai.


Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi.


Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa.


Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! »


Ngai, bandeko na ngai mpe basali na ngai, todefisaki bango mbongo mpe ble. Nabondeli bino, totikela bango niongo yango !


Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe.


Nani ayebi makasi ya kanda na Yo ? Moto oyo azalaka na botosi mingi epai na Yo asosolaka malamu kanda makasi na Yo.


Moto ya mobulu abendaka moninga na ye mpe atambolisaka ye na nzela ya mabe.


Ezali malamu te kopesa moto ya sembo etumbu, mpe ezali malamu te kobeta bato ya lokumu na miso ya bosembo.


Ezali malamu te kolongisa moto mabe mpe kokweyisa moyengebene, kati na kosambisama.


Ezali malamu te kobungisa mayele, kati na bolingo oyo eleka ndelo. Lokolo ya moto oyo atambolaka noki-noki ezangaka te kobeta libaku.


Makambo oyo mpe ezali toli ya bato ya bwanya : Kopona bilongi, kati na kosambisa, ezali malamu te.


Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango : ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye ! ›


Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo.


Kati na Yuda mobimba, Galile mpe Samari, Lingomba ezalaki na kimia, ezalaki kolenda mpe kotosa Nkolo, mpe motango ya bandimi na yango ezalaki kobakisama na lisungi ya Molimo Mosantu.


Mpo na yango, kolanda ndenge ekomama : « Likolo na bino, Kombo ya Nzambe ezali kofingama kati na Bapagano. »


Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.


komibatela malamu, kotambola na bomoi ya peto, komipesa na misala kati na bandako na bango, kozala basi ya boboto mpe ya botosi liboso ya mibali na bango, mpo ete Liloba na Nzambe efingama te.


Bozalaka na bizaleli ya malamu kati na Bapagano mpo ete, ata soki bazali kotonga bino ete bozali kosala mabe, bandima ata misala malamu na bino mpe bapesa Nzambe nkembo na mokolo oyo akomimonisa.


Te, bana na ngai ! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ