3 Bamosusu bazalaki mpe koloba : — Tozali kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vino mpe bandako na biso lokola ndanga mpo na kozwa ble na tango ya nzala makasi.
Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango ; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki.
Bamoko bazalaki koloba : — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele ; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi.
Bamosusu lisusu bazalaki koloba : — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi.
Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola.