— Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. Mpe Ezekiasi alelaki mingi.
Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso ; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango !
Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo !
Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo !
Kasi tika ete bato nyonso oyo balukaka Yo batonda na esengo mpe basepela kati na Yo ! Tika ete ba-oyo balingaka lobiko na Yo balobaka tango nyonso : « Yawe azali monene ! »
Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu.
Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.
Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.