17 Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.
Davidi alobaki na ye : — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai.
Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli.
Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo ; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele.