16 Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo ; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele.
Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga.
Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
Yango wana, bandeko balingami, botelema ngwi mpe bomitika te ete baningisa bino. Bokendaka tango nyonso liboso kati na mosala ya Nkolo, wana boyebi malamu ete mosala na bino kati na Nkolo ezali ya pamba te.