Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 5:12 - Mokanda na Bomoi

12 Bazongisaki : — Tokosala ndenge olobi, tokozongisa yango mpe tokosenga bango lisusu eloko moko te na likolo. Bongo nabengisaki Banganga-Nzambe ; mpe nasengaki na bakambi mpe bakalaka ete balapa ndayi, liboso ya Banganga-Nzambe, ete bakosala ndenge balaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 5:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi : — Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi !


Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi.


Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola.


Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso ; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe !


Balobaki : « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi.


Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko.


Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango ; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki.


Kasi Yesu abatelaki kimia. Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. »


Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ