Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 5:1 - Mokanda na Bomoi

1 Mibali elongo na basi na bango bayimaki-yimaki makasi mpo na kotelemela bandeko na bango, Bayuda.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 5:1
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi


Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe.


Tala makambo mosusu oyo bosalaka : bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino.


Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?


Mokolo oyo elandaki, Moyize akutaki bana ya Isalaele mibale kobunda. Bongo amekaki kozongisa boyokani kati na bango ; alobaki na bango : « Ah baninga na ngai, bozali bandeko ; mpo na nini bozali kosalana mabe ? »


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ