Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 4:6 - Mokanda na Bomoi

6 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango : « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso ! »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 4:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nazali nani, mpe bato na ngai bazali banani, mpo ete tozwa makoki ya kopesa makabo oyo, wuta na mokano ya mitema na biso moko ? Nyonso ewutaka epai na Yo, mpe topesi Yo kaka oyo ewuti na loboko na Yo.


Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :


Ezekiasi mpe bato nyonso basepelaki na ndenge Nzambe akokisaki makambo mpo na bato na Ye, pamba te nyonso esalemaki na lombangu.


Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. »


Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango.


Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli  ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.


Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


Yelusalemi, engumba oyo etongama malamu ; engumba oyo biteni na yango ekangana esika moko.


Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango,


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


apesa bino makoki ya kosalaka bolamu ya lolenge nyonso mpo na kokokisa mokano na Ye, mpe asala kati na biso makambo nyonso oyo esepelisaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto ! Tika ete nkembo ezonga epai na Ye, mpo na libela na libela ! Amen !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ