Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 4:3 - Mokanda na Bomoi

3 Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 4:3
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai.


Beni-Adadi alobaki : — Soki bayei mpo na kimia, bakanga bango ya bomoi ; kasi soki mpe bayei mpo na bitumba, kokanga bango ya bomoi.


Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango !


Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele.


Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ?


Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te,


ezali mpo ete ngomba Siona ebebisami, mpe mbwa ya zamba ekomi kovanda kuna.


Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ