Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 4:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ;


Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire.


Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika.


Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda.


Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli  ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale.


Bazali kosalela bato na Yo likita, kokanela bato oyo obatelaka.


« Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. ›


« Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo.


Yeba mpe sosola makambo oyo : wuta tango lisakoli ya kobongisa mpe ya kotonga lisusu Yelusalemi ebimaki kino koya ya mokonzi, Ye oyo azwaki epakolami, ekosala baposo sambo mpe baposo tuku motoba na mibale. Engumba ekotongama lisusu elongo na nzela mpe bamir na yango oyo batonga makasi.


Oh Yawe, nayokaki sango ya Kombo na Yo ! Yawe, nabangaki misala na Yo. Sala yango lisusu na tango na biso ! Sala ete eyebana lisusu na tango na biso ! Kasi ata soki otomboki ndenge nini, kobosanaka te mawa na Yo mpo na biso.


Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango.


Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba.


Kasi, kati na mokili, Nzambe aponaki biloko pamba mpo na koyokisa bato ya bwanya soni, aponaki biloko elemba mpo na koyokisa biloko ya makasi soni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ