Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Neyemi 4:15 - Mokanda na Bomoi

15 Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Neyemi 4:15
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. »


Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi.


Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. »


Liboso na Yawe, bwanya moko te, mayele moko te mpe toli moko te ekoki kolonga.


Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; natie mobulu kati na molimo ya bato oyo balobaka makambo ekoya, nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya mpe nakomisi mayele na bango liboma.


Bosala malamu mabongisi na bino, kasi ekobebisama ; boloba oyo bokoki koloba, kasi eloko moko te ekosalema, pamba te Nzambe azali elongo na biso !


Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.


mpo na oyo etali mosala, bozalaka bagoyigoyi te ; mpo na oyo etali Molimo, bopelaka na yango makasi ; mpo na oyo etali Nkolo, bozalaka bawumbu ya malamu ;


ete bolukaka kobika bomoi na bino kati na kimia ; mpe tika ete moto nyonso atalaka makambo na ye moko mpe aliaka na motoki na ye moko, ndenge kaka toyebisaki bino yango,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ