Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ;
Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda.
Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo.
Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye.
Pasi ekokomela yo, mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; mikakatano ekokomela yo mpe okokoka komibatela te ; libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa.
Kasi kondima bosenga na bango te, pamba te bato koleka tuku minei kati na bango bazali kobongisa motambo mpo na kokanga ye ; balapaki ndayi ete bakolia te mpe bakomela ata eloko moko te kino bakoboma Polo. Makambo nyonso esili kobongisama mpe bazali kozela kaka ndingisa na yo.